Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 22:12 - Mokanda na Bomoi

12 Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 22:12
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye.


Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.


Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.


Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »


Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli,


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ