Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 21:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 21:9
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.


Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.


Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.


Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.


Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.


Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.


Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.


Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ