Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.
Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.
Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye ; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »