Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.
Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›
Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai : Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende ! Pamba te soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela.