Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 21:29 - Mokanda na Bomoi

29 Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 21:29
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !


Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.


Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.


Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.


Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.


Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.


Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :


Nani azali lokola moto ya bwanya ? Nani ayebi kolimbola makambo ? Bwanya engengisaka elongi ya moto, mpe efungolaka elongi oyo ekangama.


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.


Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.


Sik’oyo, tika ete Ye moko Nzambe, Tata na biso, mpe Yesu, Nkolo na biso, bafungolela biso nzela ya koya epai na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ