28 Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.
Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ; moto oyo akosaka akobebisama.
Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta mpo na kosala moninga na ye mabe azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.
motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
Balobaki na ye : — Okomi penza na liboma ! Kasi Rode azalaki kaka koloba : — Ya solo penza ! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki : — Ekoki kozala anjelu na ye !
Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama : « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.