23 Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.
Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !
Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.