Masese 21:16 - Mokanda na Bomoi16 Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.