Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 21:13 - Mokanda na Bomoi

13 Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 21:13
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.


pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.


Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.


Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.


Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.


Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.


Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;


Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.


Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »


Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye,


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ