Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.


Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.


Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.


Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.


Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.


Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso !


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Tala, mawa na ngai ! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.


Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo !


Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?


Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.


Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !


Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ