Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:4 - Mokanda na Bomoi

4 Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.


Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.


Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.


Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.


bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.


Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !


Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ