Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:30 - Mokanda na Bomoi

30 Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:30
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,


Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.


Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.


Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.


Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.


Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye ; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.


Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ