Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda : — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende.