29 Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.
Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ; bazwaka yango na nzela ya bosembo.
Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.
Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.
Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.