Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:28 - Mokanda na Bomoi

28 Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi ; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:28
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo ; nakoyembela nde Yo, Yawe.


Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.


Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo ; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.


Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.


Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.


Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.


Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.


Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.


Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !


Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi : alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.


Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo : ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo ! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa ! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ