Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:25 - Mokanda na Bomoi

25 Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu : « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:25
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.


Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.


Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.


« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›


Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.


Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.


Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.


Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ