Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:24 - Mokanda na Bomoi

24 Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto ; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:24
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.


Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.


Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye ;


Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.


Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.


Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.


Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ