Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.
Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.