Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.


Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.


Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.


Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.


Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango.


Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.


Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola : « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi ! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini ?


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.


Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ