Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.


Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.


pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.


Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »


Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ