2 Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.
Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe : — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo !
Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.
Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te ; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.
Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.
Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?
Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele, obongisaki nde soni ya ndako na yo moko mpe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.