17 Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu ;