Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.


Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,


Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.


Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.


Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.


Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.


Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka mafuta ya nzoyi, mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;


Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,


Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;


mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ