Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 20:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 20:11
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Te, ezala kati na mitema na bino, bosalaka mabongisi ezanga bosembo ; botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.


Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.


Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.


Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.


Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ?


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ