Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo ; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›