Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 2:7 - Mokanda na Bomoi

7 Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 2:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te.


Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai ; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.


Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.


Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.


Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.


Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.


kolanda ndenge ekomama : « Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »


Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe.


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ