Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.