20 Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.
Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai ! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !
Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya, nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.
Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.
Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.