Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye.