« Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele ? Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama ekoki solo kolongola etumbu na yo ? Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana ? »
Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.