Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 2:13
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te !


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.


Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi.


Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te ; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.


Soki moto ya sembo atiki bosembo na ye, asali masumu mpe akufi mpo na yango, akufi nde mpo na masumu oyo asali.


bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. »


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ