Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 2:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.


Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.


Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.


Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.


Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.


Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.


Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.


Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe :


Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.


botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ