Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 2:10 - Mokanda na Bomoi

10 Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 2:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.


Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !


Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.


Nasepelaka na liloba na Yo lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.


Nalingaka mibeko na Yo mingi ! Nakanisaka yango mikolo nyonso.


Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.


mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.


Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli ; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba ?


Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.


kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo, linga yango mpe ekobomba yo.


Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ