Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 2:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 2:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.


Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.


mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima ;


Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele, kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge ayokisaka tata na ye soni.


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.


Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.


Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.


Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.


Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?


Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo ;


Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.


Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.


Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.


— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.


Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? »


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ