Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.
Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.
Solo, moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi mpe kobika mikolo ya esengo asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe, mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta ;