7 Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te ? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.
Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.
Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ?