Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 19:5 - Mokanda na Bomoi

5 Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 19:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosakoli ya mobange azongisaki : — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe : « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » Nzokande azalaki kokosa ye.


Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »


Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.


Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.


Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ; moto oyo akosaka akobebisama.


Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.


motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.


Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.


Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ