4 Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.