Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »
pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe : atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.
Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo !
Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.