Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?
Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango ; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali.