26 Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.
Mosali ya bwanya akozala na bokonzi likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni, mpe akozwa libula elongo na bandeko.
Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.
Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye, bongo alobaka : « Ezali na yango mabe te, » azali moninga ya mobomi.
Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele, kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge ayokisaka tata na ye soni.
Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.
Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.
Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »