25 Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
Tango bapesaka motioli etumbu, zoba akomaka moto ya bwanya ; mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya, azwaka solo boyebi.
Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.
Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu.
Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.