24 Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima, loboko na Yo ya mobali ? Mpo na nini okangi maboko na Yo ?
Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.
Yesu azongisaki : — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai.
Yesu azongisaki : — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai.