Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 19:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 19:20
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo ; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.


Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.


Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.


mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya mpe kososola maloba ya mayele ;


mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima ;


Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;


Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.


Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.


Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.


Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye ; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.


Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.


Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.


Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te !


Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »


Namilobelaki boye na tina na engumba oyo : « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.


Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ