19 Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye ; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.
Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.
Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.