Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 19:17 - Mokanda na Bomoi

17 Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 19:17
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye.


Esengo na moto oyo akanisaka mobola ! Yawe akokangola ye na tango ya pasi.


Akoyokela mobola mpe moto akelela mawa, mpe akobikisa moto akelela na kufa ;


Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.


Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.


Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.


Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.


Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi, pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.


Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.


Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »


Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.


Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ