Masese 19:14 - Mokanda na Bomoi14 Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.