13 Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.
ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema, mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.
Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.