Masese 19:12 - Mokanda na Bomoi12 Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki : — Eh ! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai ? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani.
Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.