11 Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.
Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele ? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto ? Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda.
Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.
Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.
Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.
Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.
Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;